Ndako | Nsango | Bamoziki | Zando | Mindule | Ezibeli | Liyebisi | Lolaka16  
         
 

Lopango ya Banka - Loyembo la Lokumu


Lopango ya Banka


Lopango ya Banka - Telema mpo Kongo


Maloba ma Nzembo:

Telema (mpo na Kongo)
Buza

Bayebisi ngai, bosana Mboka wana, esi ebeba n’ango
Fanda na yo na Mputu, sala Makambo ma yo
Ngai nazongiseli bango, Kongo kino Liwa
Nakobundela Bosembo mpo na Bandeko banga
Makila mazali kotanga, Mokili eboyi komona
Liwa ya Moto Moyindo, ezali eloko mpamba
Lelo batindi yo, oboma Ndeko na yo,
Lobi bakotinda Mosusu, aya koboma yo

Balobi Mwana, ozali na yo kaka Litanga moko ya Mayi
Na kati ya Biliki, olingi obongola nini, na kati ya Mokili
Mingi bameka, mingi balimwa, mingi balapa, mingi bakatwa
Mwana keba, Nzela wana etonda na Makama (Balikama)
Kasi nakangi Likofi, nabeti yango na Ntolo
Nabwaki yango likolo, mpo na Kongo

Mondimo.

Bosembo na Kimia, mpo na Kongo
Bongo na Mpiko, mpo na Kongo
Bobiso na Bonsomi, mpo na Kongo
Bolingo na Liboke, mpo na Kongo
Totika lokoso, mpo na Kongo
Totika Likunia, mpo na Kongo
Nzete ya Mbila, bakokata, ekokola
Bakokata, ekokola, Mwana Mboka
Telema, Mwana Mboka

Eteni ya mibale
Mangenge

Lelo Mvula tuku mine na mitano, tozozela
Mokomboso azanga Mokila, Bankoko baloba
Kasi tozangaki nini, tosalaki nini
Mpo na babongisela biso Pole na Molili
Makila ezosila te kotanga
Wuta Tata Lumumba, Mulele ti na Mzee Kabila
Tolingi Kimia, Bongwana mpe Bosolo
Tokosami mingi solo, basasi biso mingi solo

Eloko nionso eza na Ngonga nango
Banso topesa Mongongo mpo na Mboka na biso
Toza Bana Mabele moko, Ndeko na nga
Ata Bokeseni ya Bikolo,esengeli totikala lisanga
Ngonga ebeti, biso banso tolamuka na Mpongi
Tosimba Nzela mpo na komonisa Kongo na Mokili
Mongongo nayo nde ekofongola Ezibeli
Mpo na Mongongo nayo nde tobimi na Molili

Mondimo.

Eteni ya misato
Buza

Nayoki Kiti ya Mokonzi enzingami na Banguna
Batieli biso Motambo na Kivu mpe na Bunia
Baweleli Bonkita yango bapimeli biso Kimia
Mboka eza kozika, biso nse na kobina
Bamisusu batingami kaka na Biblia
Bakosi bango Lobiko ekowuta pa Masiya
Ndota ya Baba, Bolozi ya Kongo
Ebanda kala, yesu aya te

Mangenge

Lumumba kasi Bayaya, elingi koloba oyo ekoya eya
Yoka Bana oyo Kingunda ekembisa Bongo lokola Ndika
Baniangalakata oyo bazo tia Mitambo na Nzela
Mpo Kongo epusana na Likukuma, toyebi bango
Tango yakotonga ezowumela, malembe ezo beleme
Tonga bowelela, bolakisa bokokoka kotonga nango na
Mayele
Moto nionso esengeli atosa Mibeko ya Mboka, Tatu, Mamu
Toyungula Bakonzi na Kiyungulu

Mondimo.

Bobimi

Buza: Yaya Nkwankolo Bana Mayi
Mangenge: eza bongo
Buza: eza Yaya Nkwankolo, Lopango ya Banka
Mangenge: lobela bango
Buza: linga biso to yina biso, kasi na katikati eza te
Mangenge: eza teee
Buza: pona, haaha, ...Nka
Banka: Yaya Nkwankolo
Buza: Nka
Banka: Yaya Nkwankolo

Mindule: B. Lemvo
Moloba: B. Lemvo & M. Aundu

   
         
   
NKA © 2006